Banzembo 122
BIB1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! » 2 Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo ! 3 Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko. 4 Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe. 5 Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi. 6 Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia ! 7 Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi ! 8 Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo ! » 9 Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.
