Menu

Banzembo 121

BIB

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ? 2 Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. 3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te. 4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te ! 5 Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo. 6 Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te ! 7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ; 8 Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate