Menu

Banzembo 70

BIB

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe. 2 Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai ! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai ! 3 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni ! 4 Tika ete bato oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni ! 5 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! » 6 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te !

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate