Banzembo 54
BIB1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. » 3 Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo. 4 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai. 5 Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te. 6 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai. 7 Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe ! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango. 8 Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu. 9 Okangoli ngai na pasi nyonso ; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.
