Menu

Banzembo 47

BIB

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso. 3 Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba. 4 Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso. 5 Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye. 6 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo. 7 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye. 8 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye. 9 Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule. 10 Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; atombwama makasi.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate