Menu

Banzembo 150

BIB

1 Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi ! 2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo ! 3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda ! 4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite ! 5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene ! 6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate