Menu

Banzembo 134

BIB

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo. 2 Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe ! 3 Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele !

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate