Menu

Banzembo 130

BIB

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi ! 2 Nkolo, yoka ngai ! Yoka mabondeli na ngai ! 3 Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ? 4 Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo. 5 Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya ; nazali kozela maloba na Ye. 6 Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo. 7 Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye. 8 Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate