Menu

Banzembo 126

BIB

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto. 2 Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! » 3 Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela. 4 Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi. 5 Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo. 6 Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate