Menu

Banzembo 124

BIB

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te ; tika ete Isalaele aloba bongo ! 2 Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso, 3 mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi. 4 Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso. 5 Mayi makasi elingaki kozindisa biso. 6 Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso ! 7 Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke ; motambo ekatanaki, mpe tokimaki. 8 Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate