Menu

Banzembo 113

BIB

1 Bokumisa Yawe ! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ; bokumisa Yawe ! 2 Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela ! 3 Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama ! 4 Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola. 5 Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo ? 6 Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili. 7 Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela ; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola 8 mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye. 9 Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate