Jozue 12
BIB1 Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba : 2 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni. 3 Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude. 4 Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi. 5 Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni. 6 Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. 7 Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango 8 kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. Tala bakonzi yango : 9 mokonzi ya Jerikomokomokonzi ya Ayi, pembeni ya Betelimoko 10 mokonzi ya Yelusalemimokomokonzi ya Ebronmoko 11 mokonzi ya Yarimutimokomokonzi ya Lakishimoko 12 mokonzi ya Egilonimokomokonzi ya Gezerimoko 13 mokonzi ya Debirimokomokonzi ya Gederimoko 14 mokonzi ya Orimamokomokonzi ya Aradimoko 15 mokonzi ya Libinamokomokonzi ya Adulamimoko 16 mokonzi ya Makedamokomokonzi ya Betelimoko 17 mokonzi ya Tapuamokomokonzi ya Eferimoko 18 mokonzi ya Afekimokomokonzi ya Lasharonimoko 19 mokonzi ya Madonimokomokonzi ya Atsorimoko 20 mokonzi ya Shimironi-Meronimokomokonzi ya Akishafimoko 21 mokonzi ya Taanakimokomokonzi ya Megidomoko 22 mokonzi ya Kedeshimokomokonzi ya Yokineami kati na Karimelimoko 23 mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dorimokomokonzi ya Goyimi, kati na Giligalimoko 24 mokonzi ya Tiritsamoko. Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.
